Neyemi 4:10 - Mokanda na Bomoi10 Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri.