1 Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi.
Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.
Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.
Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi : — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai.
Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.
balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »