Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 3:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;


Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli.


Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.


Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.


Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika !


Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.


Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ?


Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu !


Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ