Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye.
Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye.
Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye.
Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »