Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 3:25 - Mokanda na Bomoi

25 Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 3:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakitani ya Pareoshi : nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.


na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.


Bakitani ya Pareoshi : nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.


Esidrasi, molakisi ya Mobeko, atelemaki na etemelo ya kolobela oyo basalaki na mabaya, kaka mpo na mayangani wana. Matitia, Shema, Anaya, Uri, Ilikia mpe Maaseya batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mobali ; Pedaya, Mishaeli, Malikiya, Ashumi, Ashibadana, Zakari mpe Meshulami batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mwasi.


oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! › Boye atiaka yango maninisa minene, mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati mpe akopakolaka yango langi ya motane.


Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.


Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli :


Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.


Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.


Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.


Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ