Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 3:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotsi azalaki tata ya Anubi mpe Atsobeba, mpe koko ya mabota ya Aareyeli, mwana mobali ya Arumi.


Mpe kati na Banganga-Nzambe : Bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.


Na mokolo ya minei, tomekaki kilo ya palata, ya wolo mpe bisalelo ya bule kati na Ndako ya Nzambe na biso, liboso ya kopesa yango na maboko ya Nganga-Nzambe Meremoti, mwana mobali ya Uri ; azalaki elongo na Eleazari, mwana mobali ya Pineasi, mpe Balevi Yozabadi, mwana mobali ya Jozue, mpe Noadia, mwana mobali ya Binuwi.


Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.


Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye.


Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.


Mpe kati na Banganga-Nzambe : bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ