Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 3:15 - Mokanda na Bomoi

15 Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 3:15
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.


bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.


Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso.


Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.


Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka.


Bongo nalobaki na bango : — Bozali komona pasi oyo tozali na yango ! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo !


Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki.


Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.


Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana.


Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango.


Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki.


natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.


« Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,


Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili.


Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?


mpe alobaki na ye : — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ