Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 3:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,


Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? Yonadabi azongisaki : — Iyo, ezali bongo ! Jewu alobaki : — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.


engumba ya Ebron, kati na mokili ya Yuda, elongo na bamboka na yango ya zingazinga.


Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu.


Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.


Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ