Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 2:8 - Mokanda na Bomoi

8 mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 2:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi.


Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele.


Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe : ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te.


alongwaki na Babiloni. Esidrasi yango azalaki molakisi malamu ya mibeko mpe ayebaki penza malamu Mobeko ya Moyize oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki na bato na Ye. Bongo lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ye, ezalaki likolo na ye, mokonzi apesaki ye biloko nyonso oyo asengaki.


Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye,


Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ;


natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.


Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.


Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.


Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai ; yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nazali koteya makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekokokisama solo :


mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.


Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ