Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 2:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nalobaki na ye lisusu : — Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 2:7
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.


Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino


Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso ; pamba te tolobaki na mokonzi : « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. »


Batindaki lisusu sango ya mitindo ya mokonzi epai ya bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka mpe epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, oyo basungaki bato mpe Tempelo ya Nzambe.


Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai.


Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ