Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai : — Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini. Esepelisaki mokonzi kotinda ngai ; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 2:6
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela


Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


mpe nazongiselaki mokonzi : — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu.


Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli.


Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›


Bakotonga lisusu bisika oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala, bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ; bakokomisa sika bingumba oyo ekweya, oyo ebeba wuta bileko ya kala.


Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ