Neyemi 2:5 - Mokanda na Bomoi5 mpe nazongiselaki mokonzi : — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
Ester alobaki : — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.