Neyemi 2:20 - Mokanda na Bomoi20 Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
— Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te.