Neyemi 2:19 - Mokanda na Bomoi19 Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kati na mokanda yango, bakomaki : « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango ;
bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.