Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 2:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,


Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato,


Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.


Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.


tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;


« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.


Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.


Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye, kaka na butu wana, mpe akimaki na Ejipito


Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino !


Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa.


Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama.


Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te.


Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ