Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 2:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na sanza ya Nisani, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 2:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye.


Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon.


Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami.


Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia,


Kati na bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, bayembi, bakengeli bikuke mpe basali ya Tempelo, ndambo bazongaki na Yelusalemi na mobu ya sambo ya mokonzi Aritakizerisesi.


Maloba ya Neyemi, mwana mobali ya Akalia. Na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, na sanza ya kisilevi, wana nazalaki nanu na Size, mboka mokonzi,


Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ