Alobaki na bango : — Boyoka ngai, Balevi ! Bomibulisa sik’oyo mpe bopetola Tempelo ya Yawe, Nzambe ya bakoko na bino ; bolongola mbindo nyonso kati na Esika ya bule.
Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.
bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali.
Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba ; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.