Neyemi 13:6 - Mokanda na Bomoi6 Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli.