Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:5 - Mokanda na Bomoi

5 apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe ; mpe esalemaki bongo.


bapesaki lisusu epai ya basharipantie mpe batongi Tempelo mpo ete basomba mabanga bakata elongo na mabaya mpo na motondo, mpe mpo ete batonga bandako mosusu oyo bakonzi ya Yuda bazalaki kobongisa te tango ezalaki kobeba.


Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe.


Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.


Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala.


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


mpe nazongaki na Yelusalemi. Kuna, namonaki mpe nasosolaki mabe oyo Eliashibi asalaki na ndenge apesaki Tobiya shambre kati na lopango ya Ndako ya Nzambe ;


Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba ; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ