Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »
Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba : « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ?
Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.