Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:28 - Mokanda na Bomoi

28 Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:28
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu.


Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,


Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi.


Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.


Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.


Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ?


Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.


Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi.


Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.


Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu.


Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ