Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:26 - Mokanda na Bomoi

26 Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.


nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.


Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo.


bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa.


Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya.


Kosilisa makasi na yo na basi te, komitika te na basi oyo bapengwisaka bakonzi !


Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ