Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:25
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.


Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi.


Moto nyonso oyo akotosa te Mobeko ya Nzambe na yo mpe mobeko ya mokonzi asengeli bongo kozwa etumbu ya kufa to kokende na bowumbu to kokaba bomengo na ye mpo ete babotola yango to mpe kokota na boloko. »


Mpo na yango, napamelaki bakambi ya bato mpe natunaki bango : — Mpo na nini Ndako ya Nzambe esundolami ? Bongo, nasangisaki Balevi mpe bayembi mpe nazongisaki bango, moto na moto na mosala na ye.


Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ?


Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.


Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.


Tango nayokaki koyimayima na bango mpe maloba wana nyonso, nasilikaki makasi.


Nayokaka pasi mingi na motema tango namonaka bato mabe kosundola mibeko na Yo.


asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;


mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.


Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.


Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.


Tosa Yawe, Nzambe na yo ; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye.


Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali ;


Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ