Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:23 - Mokanda na Bomoi

23 Kaka na mikolo wana, namonaki lisusu bana mibali ya Yuda kobala bana basi ya Asidodi, ya Amoni mpe ya Moabi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:23
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon ; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya : basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti.


Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango : — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo.


Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.


Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso ; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe !


Balobaki : « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.


Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ;


Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.


Boni, tosengeli sik’oyo koyoka ete bino mpe bozali kosala mabe wana monene mpe bozangi boyengebene liboso ya Nzambe na biso likolo ya kobala basi ya bapaya ?


Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.


Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?


Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—


Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi : ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa ; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi,


Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ