Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:2 - Mokanda na Bomoi

2 mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe ; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai ; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.


Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »


Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki, telema mpe yoka ! Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu !


Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito ; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe.


Sima na bango kotika nzela ya solo, bapengwaki mbala moko na kolanda nzela ya Balami, mwana mobali ya Beori, oyo alingaki lifuti ya mabe ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ