Neyemi 13:19 - Mokanda na Bomoi19 Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nalobaki na bango : — Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi : bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango.