Neyemi 13:17 - Mokanda na Bomoi17 Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.
Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.