Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:13 - Mokanda na Bomoi

13 Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi ; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:13
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe.


Bazalaki kolandela te mbongo oyo bapesaki na bato mpo na kofuta basali, pamba te bazalaki kosalela yango na bosembo.


Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene.


Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala.


Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.


ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ;


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye.


Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.


Esidrasi, molakisi ya Mobeko, atelemaki na etemelo ya kolobela oyo basalaki na mabaya, kaka mpo na mayangani wana. Matitia, Shema, Anaya, Uri, Ilikia mpe Maaseya batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mobali ; Pedaya, Mishaeli, Malikiya, Ashumi, Ashibadana, Zakari mpe Meshulami batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mwasi.


Nkolo azongisaki : — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?


mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.


Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.


Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.


Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.


Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,


Esengeli komeka bango liboso ; bongo soki emonani ete bazangi pamela, wana nde bakoki kosala lokola badiakona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ