Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo : eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango.


Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali bule mpo na Yawe.


Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.


Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.


Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ