Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 13:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 13:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango.


Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.


Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso.


Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.


Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.


Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.


« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.


Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ