Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 12:39 - Mokanda na Bomoi

39 na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 12:39
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.


Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato


Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.


Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,


Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi ; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango.


Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.


Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete ; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ;


Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.


Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.


Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ