Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 12:36 - Mokanda na Bomoi

36 mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 12:36
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »


Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.


Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia,


Tala bakambi ya mabota, kolanda ndenge babotamela, oyo bazongaki elongo na ngai, wuta na Babiloni, na tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi :


Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.


ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ;


Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.


mpo na libota ya Isakari : Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ