29 longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.
Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.
Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More.