Abidiasi, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Galali, mwana mobali ya Yedutuni ; Berekia, mwana mobali ya Asa, mwana mobali ya Elikana oyo azalaki kovanda na mboka Netofa.
longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.
Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.