Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 12:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 12:24
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele :


Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.


Tala motango ya Balevi : Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia : tuku sambo na minei.


Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.


Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko.


mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.


Sima, batelemaki ; mpe Balevi oyo : Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema.


Jozue, Buni, Kadimieli, Shebania, Bani, Sherebia mpe Kenani bamataki na etemelo ya kolobela oyo basalaki mpo na Balevi mpe babelelaki Yawe, Nzambe na bango na mongongo makasi.


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.


mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.


Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue : « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ