Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi.
« Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga : Rasheli azali kolela bana na ye ; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »
Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.