Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi : — Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ?