Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 11:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 11:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.


Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »


kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi.


longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.


Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.


Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.


Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.


Samuele atunaki ye : — Osali penza nini ? Saulo azongisaki : — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,


Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.


Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ