Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 11:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 11:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.


Tala basali ya Tempelo : Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,


Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.


Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.


mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi : Mpo na bakitani ya Yuda : Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ;


Tala motango ya Banganga-Nzambe : Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue : nkama libwa na tuku sambo na misato.


Tala motango ya Balevi : Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva : tuku sambo na minei.


Basali ya Tempelo : Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,


Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ;


bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ