24 Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.
Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.
Mosala ya Balevi ezalaki mpo na kosunga bakitani ya Aron na mosala ya Tempelo ya Yawe : kolandela bopeto ya veranda mpe ya bashambre, kopetola biloko nyonso ya bule mpe kosala misala nyonso ya Tempelo.
Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.
Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.