Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 11:22
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge ; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti.


elongo na Ashabia mpe Ezayi, bakitani ya Merari, elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bana na bango ya mibali. Bango nyonso bazalaki tuku mibale.


elongo na bandeko na bango : Shebania, Odia, Kelita, Pelaya, Anani,


Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe


Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.


Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango ; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.


ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ;


Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya.


Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe.


Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi ; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi.


Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye.


Sima, batelemaki ; mpe Balevi oyo : Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ