20 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.
Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;