Neyemi 11:17 - Mokanda na Bomoi17 Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.