14 Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.
Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka, bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba ; bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe.
elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota ; Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango.
Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.
Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya.