Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 11:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.


Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.


Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene.


Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki : ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe.


Nzokande, ndambo ya bana mibali ya Yuda, ya Benjame, ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi :


mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »


Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.


Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.


Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »


Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.


ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.


Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo


Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,


Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.


Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ