Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 10:39 - Mokanda na Bomoi

39 Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 10:39
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango : « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te ; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »


Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe ; mpe esalemaki bongo.


Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye.


Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.


Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.


« Loba na Balevi mpe yebisa bango : ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe.


Loba na Balevi : ‹ Tango bokopesa eteni oyo eleki kitoko, ekotangama mpo na bino lokola bambuma oyo elanga eboti mpe lokola vino oyo ekamolelo ebimisi.


Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.


Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ