Neyemi 10:36 - Mokanda na Bomoi36 Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,
apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.
Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.