33 Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso,
Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango.
Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.
Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato.