Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 10:32 - Mokanda na Bomoi

32 Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 10:32
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »


Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.


Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.


Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye ; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele !


Nakebisaki bango makasi mpe nalobaki : — Mpo na nini bozali kolekisa butu pembeni ya mir ? Soki bozongeli lisusu kosala bongo, nakokanga bino. Wuta na tango wana, batikalaki lisusu koya te na mokolo ya Saba.


Ngai, bandeko na ngai mpe basali na ngai, todefisaki bango mbongo mpe ble. Nabondeli bino, totikela bango niongo yango !


Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.


Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.


Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ