Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.
Bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu baliaki yango elongo na bato nyonso oyo bakabwanaki na misala ya mbindo ya bikolo ya mokili mpe basanganaki elongo na bango mpo na koluka Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola.
Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni.